Moise Mbiye – Losambo mp3

Play Video

Losambo Lyrics – Moise Mbiye

Losambo na ngaï Nkolo yanola eh
Kolela na ngaï Yaweh oyoka eh
Naza ko senga ngaï
Loboko na yo zala na nga
Ba limites na ngaï ekweya
Makambo ebongwana eh
Ebongwana eh

Na longa eh
Yaweh eh na longa eh
Ngaï longa eh
Yaweh eh na longa eh
Ngaï longa eh, ngai longa eh

Eleki nga mayele
Esali nga kobanga
Nga na kende ko wapi?
Nazongi na liziba
Esika na zuaka makasi
Esika na zongaka ya sika
Kanga ekuke ya satana eh
Na bomoyi na nga
Etelema, telema

Na longa eh
Yaweh eh, na longa eh
Na longa eh
Yaweh eh, na longa eh
Na longa eh, sala na longa eh

Esila boye te boye te eh, boye te
Balonga ngaï te ngaï te eh eh, ngai te
Nakueya na se te, na se te, na se te
Nasuka boye té eh, boyé te eh eh, boye te

Naza kosenga ngaï eh
Loboko na yo zala na nga
Ba limites na ngai éh, ekueya eh
Makambo ebongwana
Ebongwana eh
Na longa eh
Nzambé na lola eh na longa eh

Nalingi otia liloba oyo ezo correspondre na situation na yo
Soki ozobela osimbi place ozobela ozo yemba
Nabika eh
Nzamb’a miracle, na bika eh
Sala nga na bika
Nzambe na lola, na bika eh
Soki problème na yo eza kobota ozoyemba
Na bota eh
Nzambé na Anna eh na bota eh
Sala nga nabota
Nzambé na lola, na bota eh
Soki problème na yo eza ya libala yemba
Na bala eh
Nzamb’a bikamwa, nabala eh
Yaya sala nga na bala
Nzamb’a Moïse, nabala
Soki bitumba elekeli yo yemba
Na longa eh
Nzambe na Mbiye, na longa eh
Sala nga na longa
Nzambe na Alliance eh na longa
Mosali na Nzambé tango ekoki osenga miracle na yo
Batu oyo ba ndimelaka yo te
Ba comprendre que Nzambé a benga yo
Yemba elongo na ngaï
Bikamwa eh
Nzambé na lola, bikamwa
Salaka bikamwa eh
Nzamb’a Moïse, bikamwa eh
Salaka bikamwa eh
Nzambé na Mbiye, bikamwa
Yaya salaka bikamwa eh
Nzamb’a Moïse
Bikamwa eh, bikamwa eh, yaya

Lelo, likambo moko esengeli ebongwana na vie na yo
Yemba nzembo oyo na ko ndima nionso
Nzembo oyo nazo koma ngo elongo na yo
Tia liloba oyo ezo correspondre na problème na yo
Naza ko senga nga
Loboko na yo na Eklezia eh

Moise Mbiye – Losambo

Moise Mbiye Songs

  1. Moise Mbiye Je Serai Couronne
  2. Moise Mbiye – Mokonzi Bongisaka Ngai
  3. Moise Mbiye – Na Yei
  4. Moise Mbiye – Est-Ce Que
  5. Moise Mbiye – To Kamwisa Mokili
  6. Moise Mbiye – Benda Ngai
  7. Moise Mbiye – Na Maboko Na Yo
  8. Moise Mbiye – Alembi Yo Te
  9. Moise Mbiye – Nous Deux
  10. Moise Mbiye – Le Coeur De L’agneau
  11. Moise Mbiye – Fongola Nde Lola
  12. Moise Mbiye – Libonza Ya Motuya
  13. Moise Mbiye – Emmanuel
  14. Moise Mbiye – Zala Na Ngai
  15. Moise Mbiye – Lumbanji
  16. Moise Mbiye – Influence
  17. Moise Mbiye – Ko Kobola Congo Te
  18. Moise Mbiye – Bibomba Bomba
  19. Moise Mbiye – Quelque Chose De Toi
  20. Moise Mbiye – Nandimi
  21. Moise Mbiye – Intouchable
  22. Moise Mbiye – Je Suis La
  23. Moise Mbiye – Muana Na Eleka
  24. Moise Mbiye – Me Voici
  25. Moise Mbiye – Tuna Ngai Nini
  26. Moise Mbiye – Juste Disponible
  27. Moise Mbiye – Mosungi Na Ngai
  28. Moise Mbiye – Mwida Ya Mokili Oyo
  29. Moise Mbiye – Oza Nzambe
  30. Moise Mbiye – Trios
  31. Moise Mbiye – Pona Yesu
  32. Moise Mbiye – Ngolu Na Yo
  33. Moise Mbiye – Lipata Ya Kembo
  34. Moise Mbiye – Triomphe
  35. Moise Mbiye – Heros
  36. Moise Mbiye – Mosungi Malamu
  37. Moise Mbiye – Ta Presence
  38. Moise Mbiye – Akosi Ngai Te
  39. Moise Mbiye – Losambo
  40. Moise Mbiye – Molimo
  41. Moise Mbiye – O Landi Nga Ti Awa
  42. Moise Mbiye – Oza Mosantu
  43. Moise Mbiye – O Merite
  44. Moise Mbiye – Bilaka
  45. Moise Mbiye – Yesu Azali Awa
  46. Moise Mbiye – Je t’aime
  47. Moise Mbiye – Kaka Yesu
  48. Moise Mbiye – Natiela Yo Motema
  49. Moise Mbiye – Nako Zonge Te
  50. Moise Mbiye – Na Nzela Na Ngai
  51. Moise Mbiye – Ye Oyo
  52. Moise Mbiye – Nabimi Molongi
  53. Moise Mbiye – Esimbi Te
  54. Moise Mbiye – Tango Naye

By admin

Leave a Reply

Your email address will not be published. Required fields are marked *